×
Islam ezali lingomba ya Nkolo ya mokili nyonso

Na kombo ya Allah nzambe wa boboto atonda ngolu na mawa

Islam ezali lingomba ya Nkolo ya mokili nyonso

Nkolo na yo azali nani?

Oyo ezali motuna monene; Ezali motuna oyo ezali na ntina, na moto asengeli koyeba eyano na yango

Nkolo na biso azali oyo akela Mapata na mabele, mpe akitisaka mai uta na mapata mpe abimisaki elongo na yango mbuma na banzete lokola bilei mpo na biso na mpo na banyama oyo toleisaka bango.Ye nde akela biso, Ye nde akela ba tata na biso, Ye nde akela nionso, na ye nde asali butu na moyi, Ye nde asali butu ezala tango ya pongi mpe ya kopema, na moyi ezala tango ya koluka bilei na ndenge ya kobika.Na yende oyo atielaki biso moi, sanza, minzoto, mpe mbu, mpe Ye akitisaki na nse na biso banyama oyo tozali kolya mpe kozwa matomba na miliki mpe nsuki ya mpate na yango.

nini ezali lokumu ya nkolo ya mokili ?

Nkolo azali oyo akela bikelamu, mpe Ye nde azali kokamba bango na bosolo na bokambi, mpe Ye nde azali kotambwisa makambo ya bikelamu nyonso, mpe Ye nde azali kopesa yango, na ye azali Nkolo ya nionso na bomoi mpe na sima ya liwa, na nionso ezali biloko na Ye, na nionso mosusu ezali ya ye.Ye azali na Bomoi oyo akufaka te mpe alalaka te, na ye azali Mosungi, na etinda na ye moto nyonso ya bomoi asalaka yango, mpe Ye azali oyo mawa na ye ezingi biloko nyonso, mpe ye azali, oyo eloko moko te ebombamaka epai na ye, na mabele to na kati ya Mapata.Ezali na eloko moko te lokola Ye, mpe Ye azali Moyoki-Nyonso, Momoni-Nyonso, mpe azali likolo ya Mapata na ye, lipanda na bozalisi na ye, na bozalisi ezali na mposa na ye, azali na ndingisa te na bozalisi na Ye, mpe eloko moko te ya bozalisi na Ye epesami nzela kati na Ye moko, Nkembo ezala na Ye, Oyo-Aleki-Likoló nyonso.Ezali Nkolo nde akela mokili oyo eyebani malamu na bibongiseli na yango nyonso ya bokatikati oyo elongi te, ezala bibongiseli ya nzoto ya bato mpe ya banyama, to bibongiseli ya molongo oyo ezingi biso na moi, minzoto, mpe biloko mosusu oyo ezali na kati .

Mpe nyonso oyo esambelami nsima ya nzambe, ezali na litomba na mabe te mpo na yango moko, bongo ndenge nini ekoki komema litomba na baye basambelaka Ye, to kobengana mabe epai na Ye?

Lotomo ya Nkolo na biso ezali nini likolo na biso ?

Makoki na ye ezali likolo ya bato banso ba sambela Ye moko mpe kosangisa ye na eloko moko te, Basengeli te kosambela moto, to libanga, to ebale, to eloko oyo ezangi bomoi, to planète, to eloko mosusu, kasi kosambela kaka ye moko, kosangisa ye na mutu te ! basengeli komipesa na losambo kaka epai ya Nzambe, Nkolo ya mokili.

Lotomo (Droit) ya bato ezali nini? Epayi ya nkolo na bango ?

Bato bazali na lotomo ya Nzambe, soki basambeli ye, akopesa bango bomoi ya malamu oyo kati na yango bakozwa libateli, libateli, kimya, kimia, mpe bosepeli, mpe na bomoi nsima ya liwa, ya kokɔtisa bango na Paradis, epai kuna ezali na esengo ya koumela mpe boseko ya seko Mpe soki baboyi kotosa Ye mpe baboyi kotosa etinda na Ye, akosala ete bomoi na bango ezala na mawa mpe na mawa, ata soki bakanisaka ete bazali na esengo mpe na libondisi, mpe na bomoi ya nsima ya liwa , mpe kati na yango bakozala na minyoko ya seko na boseko ya seko.

Ntina ya kozala na biso ezali nini? Mpo na nini tokelamaki ?

Nkolo ya lokumu ayebisaki biso ete akelaki biso mpo na ntina moko ya lokumu, oyo ezali ete tosengeli kosambela ye moko, mpe kosangisa ye na eloko moko te, mpe apesaki biso mokumba ya kotondisa mabele na bolamu na kobongisama mpe Moumbu ayebi ntina oyo akelamaki te, mpe akokisaka te mokumba na ye epai ya Mozalisi na ye, mpe oyo azali kosala kanyaka na mabele ayebi ezali mosala na ye te oyo bapesaki ye.

Ndenge nini toko sambela Nkolo na biso ?

Nkolo, na bokonzi na ye, akelaki biso te na atikaki biso kozanga likebi, mpe akomisaki bomoi na biso mpamba te, Aponaki kati na bato bamemi-nsango epai ya bato na bango Bazali bato oyo bazali na bizaleli malamu koleka, bazali na milimo peto, mpe mitema ya bobangi, Boye atindaki epai na bango bansango na Ye, bakisa mpe makambo nyonso oyo bato basengeli koyeba na ntina ya Nkolo na bango, mpe na ntina na Ye atindaki bato mpo na Mokolo ya Lisekwa, oyo ezali Mokolo ya Kosambisama mpe Kopesa mbano lifuti.Bamemi-nsango ndenge Nini bato na bango lolenge nini bakosambela Nkolo na bango, mpe balimbolaki bango lolenge na ntango ya losambo mpe mbano lifuti na yango na mokili oyo mpe na nsima ya liwa, Bakebisi bango na maye Nkolo na bango apekisaki bango na ntina ya bilei, masanga, mpe bizaleli ya mabe.

Lingomba nini endimami na Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ?

Lingomba oyo Nzambe andimi ezali Islam, mpe ezali lingomba oyo basakoli nyonso bakomisaki, mpe Nzambe akondima lingomba mosusu te longola se yango na mokolo ya lisekwa, mpe lingomba nyonso oyo bato bayambaki longola se Islam ezali lingomba ya lokuta, . mpe yango ekopesa nkolo litomba te, kasi ekozala na mawa mpo na ye na mokili oyo mpe na sima ya liwa.

Origine mpe makonzí ya lingomba oyo (Islam) ezali nini ?

Lingomba oyo esalemi pete na Nzambe mpo na basali na ye, mpe makonzí na yango ya minene ezali ete ondimi Nzambe lokola Nkolo , mpe ondimi banzelu na Ye, mikanda na Ye, bamemi-nsango na Ye, Mokolo ya Nsuka, yango wana ozali kotatola ete nzambe mosusu azali te bobele Nzambe, mpe ete Muhammad azali Ntoma ya Nzambe, mpe kosala mabondeli mpe kofuta zakat soki ozali na mbongo oyo zakat esengeli kofutama, mpe kokila bilei Ramadan, oyo ezali sanza ya Ramadan Na mobu, mpe kosala Hajj na Nzambe na ndako ya kala oyo Abraham, kimia ezala likolo na ye, atonga na etinda ya Nkolo na ye, soki ozali na makoki ya kosala yango,Esengeli mabe oyo Nzambe apekisi yo, lokola ba ba shirki, na komiboma, na ekobo, pe kolya mbongo oyo epekisami Soki ondimi Nzambe pe osali misala wana ya losambo pe okimi makambo oyo epekisami, wana ozali musulman na mokili oyo. mpe na Mokolo ya Lisekwa, Nzambe akopesa bino esengo ya seko mpe seko na seko na Paradis.

Islam ezali lingomba ya bato to ya ekolo moko ?

Islam ezali lingomba ya Nzambe mpo na bato banso, na kati na yango moto moko te aleki moto mosusu longola se na nzela ya kobanga Nzambe mpe misala malamu, mpe bato kati na yango bakokani.

Ndenge nini bato bayebi bosolo ya bamemi-nsango, kimia mpe mapamboli ezala likolo na bango ?

Bato bayebi bosolo ya bamemi-nsango na makambo mingi, na ndakisa :

Na oyo ba yakaki na yango, lokola bosolo na litambwisi nyonso oyo bamemaki yango endimami na makanisi , na lisanga ya malamu, na Makanisi ezopesa litatoli ya bolamu na yango, na Bato oyo bazali bamemi-nsango te bakomema eloko lokola oyo bamemaki yango te.

Oyo bamemi-nsango bamemaki esangisi kobongisa mangomba ya bato mpe mokili na bango, bosembo ya makambo na bango, kotonga sivilizasio na bango, mpe kobatela mangomba, makanisi, bozwi mpe lokumu na bango.

Ba prophètes, kimia ezala likolo na bango, basengaka bato mbano te mpo na kotambwisa bango na bolamu mpe bokambi, kasi nde bazelaka lifuti na bango uta na Nkolo na bango.

Oyo ba mêmi nsango bamemaki ezali ya solo mpe ya elikia, esangani na ntembe te, kozanga bokeseni na mobulungano, mpe mosakoli nyonso andimi basakoli ya kala mpe basengaki ndenge moko na ba oyo babengaki kala.

Nzambe azali kosunga bamemi-nsango, kimia ezala likolo na bango, na bilembo ya polele mpe makamwisi ya makasi oyo Nzambe asalaka na maboko na bango. Mpo na kozala preuve ya bosolo ete batindamaki uta na Nzambe, mpe likamwisi monene ya basakoli ezali likamwisi ya Ntoma ya suka Muhammad, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, oyo ezali Coran esantu.

Coran esantu ezali nini ?

Coran esantu ezali buku ya Nkolo ya mokili, mpe ezali liloba ya Nzambe oyo ebimisamaki na mokonzi Gabriele, kimia ezala likolo na ye, epai ya Ntoma Muhammad Ezali na makambo nyonso oyo Nzambe atindaki bato báyeba Nzambe, baanzelu na Ye, mikanda na Ye, bamemi-nsango na Ye, Mokolo ya Nsuka, mpe mokano bolamu na yango na mabe na yango.Ezali na misala ya losambo oyo esengeli, makambo oyo epekisami oyo moto asengeli kokeba, bizaleli malamu mpe ya kopamela, mpe makambo nyonso oyo etali makambo ya lingomba ya bato, mokili na bango, mpe bomoi na bango nsima ya liwa Ezali buku ya likamwisi oyo Nzambe atyaki bato ntembe babimisa eloko lokola yango bakokaki te, mpe ebatelami kino Mokolo ya Lisekwa na monoko oyo emonisami na yango, ata liloba moko te, ezangi to kobongwana.

Nini ezali elembeteli ya lisekwa mpe ya kotunama ?

Omoni te mabele ekufi mpe ezali na bomoi na kati na yango te, ntango mai ekiti likoló na yango, eninganisaka mpe ebimisaka bilona nyonso ya kosepelisa, oyo asekwisaki yango azali na likoki ya kosekwisa bakufi,Ye oyo akelaki moto na litangá ya mai ya nsoni azali na makoki ya kosekwisa ye na Mokolo ya Lisekwa mpe kosambisa ye mpe kopesa ye mbano lifuti ya mobimba, soki ezali malamu, malamu, mpe soki mabe, mabe,Ye oyo akelaki likoló, mabele mpe minzoto azali na likoki ya kozongisa moto. Mpamba te kokela lisusu moto ezali petee koleka, kokela likoló na mabele

Nini ekosalema na Mokolo ya Lisekwa ?

Nkolo Mozwi-ya-Nguya-Nyonso atomboli bikelamu uta na malita na bango, na nsima akopesa bango mokumba mpo na misala na bango, moto nyonso oyo akondima mpe akondima bamemi-nsango akokotama na Paradis, oyo ezali esengo ya seko, na oyo bonene na yango ekomeli moto te, mpe oyo akondima te akozala na Lifelo, oyo ezali minyoko ya seko, na oyo moto akoki kokanisa te Mpe soki moto akoti na Paradis to Lifelo akufaka ata moke te, mpo azali moto oyo akufaka te, eza seko na esengo to na minyoko.

Soki moto alingi akota na Islam, asala nini?Ezali na milulu oyo asengeli kosala, to bato oyo basengeli kopesa ye ndingisa?

Soki moto ayebi ete lingomba ya solo ezali Islam, mpe ete ezali lingomba ya Nkolo ya mokili, boye asengeli kosala mbangu mpo na kokota na Islam. Mpamba te soki moto ya bwanya akómi koyeba solo, asengeli kokende mbangumbangu na yango mpe kozongisa likambo yango nsima te.Oyo alingi kokoma na Islam esengeli kosala milulu moko boye, pe asengeli te kozala kaka na miso ya mutu moko boye na kati ya bikelamu, kasi soki yango ezali na miso ya musulman to na centre islamique, wana ezali malamu, soki te ekoki mpo na ye koloba ete: (Nazali kotatola ete nzambe mosusu azali te kaka Allah, mpe natatoli Ete Muhammad azali Ntoma ya Nzambe), koyeba ndimbola na yango mpe kondima yango, mpe bongo akomi musulman; Na sima ayekolaka mibeko oyo etikali ya Islam mokemoke. Mpo na kosala oyo Nzambe apesi ye mitindo.

Islam ezali lingomba ya Nkolo ya mokili nyonso

Nkolo na yo azali nani?

nini ezali lokumu ya nkolo ya mokili ?

Lotomo ya Nkolo na biso ezali nini likolo na biso ?

Lotomo (Droit) ya bato ezali nini? Epayi ya nkolo na bango ?

Ntina ya kozala na biso ezali nini? Mpo na nini tokelamaki ?

Ndenge nini toko sambela Nkolo na biso ?

Lingomba nini endimami na Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ?

Origine mpe makonzí ya lingomba oyo (Islam) ezali nini ?

Islam ezali lingomba ya bato to ya ekolo moko ?

Ndenge nini bato bayebi bosolo ya bamemi-nsango, kimia mpe mapamboli ezala likolo na bango ?

Coran esantu ezali nini ?

Nini ezali elembeteli ya lisekwa mpe ya kotunama ?

Nini ekosalema na Mokolo ya Lisekwa ?

Soki moto alingi akota na Islam, asala nini?Ezali na milulu oyo asengeli kosala, to bato oyo basengeli kopesa ye ndingisa?