×
Islam ezali lingomba ya bamemi-nsango ya Nzambe Allah

Islam ezali lingomba ya bamemi-nsango ya Nzambe Allah

Islam ezali kotosa Nzambe, Mozalisi mpe Mokonzi ya mokili mobimba, na kotosa ye mpo na bolingo munene, Origine ya Islam ezali kondima Nzambe, azali Mozalisi mokeli, na biloko nyonso oyo ezuami sima naye ekelamaki , mpe ye abongi na losambo ye moko aza na molongani te, ezali na nzambe moko te oyo esengeli kosambela ye kaka ye Moko Allah , Azali na bankombo ya kitoko koleka na bizaleli ya likolo koleka, azali ya kokoka, mpe azali ndambu te, Abota te, abotama mpe te, na akokani na eloko moko te, eloko oyo ekokani naye eza te, mpe alataka nzoto ya ekelamu na ye moko te.

Islam ezali lingomba ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, oyo andimaka lingomba mosusu te epai ya bato, mpe ezali lingomba oyo basakoli banso ba yakaki nango, kimia ezala likolo na bango.

Kati na miboko ya Islam ezali kondima bamemi-nsango nyonso, mpo ete Nzambe atindaka bamemi-nsango mpo na kopesa mitindo na ye epai ya basali na ye, na akitisaka mikanda epai na bango, mpe ya nsuka kati na bango ezalaka Muhammad, kimia ezala likolo na ye, nzambi atindaka ye na mibeko ya bonzambe oyo elongolaka mibeko ya bamemi-nsango liboso na ye, Nzambe asungaka ye na ba verse minene, monene na yango ezali Coran esantu, maloba ya Nkolo ya mokili, buku oyo eleki monene, oyo eyaka na Mibeko, ya nzambe mpe ebongiseli na yango Ezali na litambwisi ya solo, oyo ememaka esengo na mokili oyo na mokolo yasuka, mpe ebatelami tii lelo na monoko ya ba arabe, oyo ebongwanaka te ata lettre Moko nakati ebimaki te.

Mpe Kati na miboko ya Islam ezali kondima ba anzelu, mpe kondima mokolo ya suka, oyo Nzambe akosembola kosekwisa bato na malita na bango mokolo ya lisekwa mpo na kopesa bango mokumba mpo na misala na bango ya malamu nzokande mondimi akozala na esengo ya seko na Paradis, mpe moto nyonso oyo akondima te mpe akosala misala ya mabe akozala na etumbu monene na Lifelo Kati na miboko ya Islam ezali kondima oyo Nzambe atye yango Ezala Malamu to mabe. (Nioso al hamdoulillah).

Na ba musulman bandimaka ete Jesus azali mosali ya Nzambe na Motindami na Ye mpe azali mwana ya Nzambe te. Lokola Nzambe azali monene, akoki kozala na mwasi na mwana te, kasi Nzambe ayebisaki biso na kati ya Coran ete Jesus azalaki mosakoli oyo Nzambe apesaka ye makamwisi mingi mpe Nzambe atindaka ye abenga bato na ye mpo na kosambela Nzambe ye moko na molongani te.

Islam ezali lingomba oyo ekokani na mayele malamu mpe makanisi ya malamu, mpe endimami na milimo ya malamu, Ezwami mibeko ya nzambe Mozalisi Monene mpo na bozalisi na Ye, mpe ezali lingomba ya bolamu na ya esengo mpo na bato banso Ekesenisaka mposo na langi moko te likolo ya moninga, mpe bato Nyonso bakokani, na kati na yango Moto moko te akeseni na Islam likolo ya basusu longola se na bonene ya misala na ye ya malamu na bobangi nzambe.

Moto nyonso ya mayele asengeli kondima Nzambe lokola Nkolo, Islam lokola lingomba, mpe Muhammad lokola Ntoma, mpe oyo ezali likambo oyo moto azali kopona te. Pamba te Nzambe akotuna ye, mokolo ya lisekwa ntina ya makambo oyo bamemi-nsango bayanolaka. Soki azali mondimi, boye azali na elonga monene na bomengo, mpe soki azali mondimi te, boye azali na bobungisi ya polele.

Na moto oyo alingi kokota na Islam asengeli koloba : (Nazali kotatola ete nzambe mosusu azali te! kaka Nzambe Moko Allah mpe nazali kotatola ete Muhammad azali Ntoma ya Nzambe), koyeba ndimbola na yango na kondima yango, mpe na ndenge wana akomi musulman. Na sima ayekola mibeko oyo etikali ya Islam mokemoke. Mpo na kosala oyo Nzambe apesi ye mitindo.

Mpo na koyeba makambo mosusu: byenah.com

Islam ezali lingomba ya bamemi-nsango ya Nzambe Allah