×
Nani akelaka ngai? Na mpo na nini Akelaka ngai?Eloko nyonso ezali kolakisa ete Mozalisi na yango azali

Nani akelaka ngai? Na mpo na nini Akelaka ngai?Eloko nyonso ezali kolakisa ete Mozalisi na yango azali

Nani akelaka mapata na mabele ? mpe bikelamu minene kati na yango oyo ezingi yango ?

Nani Akelaka Système oyo eza ya kobonga na kati ya mapata na mabele ?

Nani akelaka mutu, mpe atielaka ye koyoka, na komona, mpe kokanisa, na kosala ete azala na likoki ya kozwa boyebi mpe kokanga ntina ya makambo ?

Ndenge nini olimboli mosala wana na ba systèmes ya nzoto na yo mpe na nzoto ya bikelamu ya bomoi? Nani akelaka yango ?

Ndenge Nini ebongisami mpe ezali ko fandisa Mokili monene oyo na mibeko na yango oyo etambwisaka yango malamu na boumeli ya bambula ?

Nani atiaka efandeli oyo ezo konza mokili oyo (kozala na bomoi na kokufa) na ko botama, mpe kotia butu na moyi, na bobaluki ya ba nsanza, etc.) ?

Toloba Eloko oyo emikelaka yango moko ? To eutaka na eloko te? To ezwamaki na mbala kaka ?

Mpo na nini mutu andimaka biloko oyo akoki komona te, kasi ezali? Na ndakisa : (kososola, makanisi, mayele, molimo, mpe bolingo) ezali te mpo azali komona mbano na yango? Ndenge nini moto akoki koboya bozali ya Mozalisi ya univers monene oyo tango azali komona ba elembo ya bikelamu na Ye mpe ba elembo ya kosala mpe mawa na ye ?!

Moto moko te akondima moto Moko ayebisa ye ndaku oyo eyaki yango moko na mutu atongi yango te! To bayebisa ye ete eloko moko te nde ekela ndako oyo! Ndenge nini bato mosusu bakoki kondima bato oyo balobaka ete molongo monene wana eza kozanga Mozalisi? Ndenge nini moto oyo azali na makanisi malamu akoki kondima ete báyebisa ye ete discipline wana ya précise ya univers esalemaki na mbalakaka ?

Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobi:(أَمۡ خُلِقُواْ مِنۡ غَيۡرِ شَيۡءٍ أَمۡ هُمُ ٱلۡخَٰلِقُونَ، أَمۡ خَلَقُواْ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَۚ بَل لَّا يُوقِنُونَ). (To bakelamaki na eloko mosusu oyo ezali Ye te ? To bango nde bazali bakeli ?, to pe bakelaki mapata na mabele ? Kasi, bazo tia elikia te).[Surat 52:32].

Allah Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso

Ezali na Nkolo mpe Mozalisi moko, oyo azali na bankombo minene mpe bizaleli mingi oyo ezali kolakisa ete azali na bobongi nie, Kati na bankombo na ye ezali : Mozalisi, Mozalisi ya mawa mingi, Mosungi, Mokabi, mpe "Allah," ezali nkombo oyo eyebani mingi kati na bankombo ya Nkolo Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, mpe ndimbola na yango ezali : Ye oyo abongi kosambela ye moko, kozanga moninga.

Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobaki na kati ya Coran esantu ([1]):﴿قُلۡ هُوَ ٱللَّهُ أَحَدٌ {Loba : Allah aza ye moko* ٱللَّهُ ٱلصَّمَدُ Nzambe oyo ami koka na nyonso*لَمۡ یَلِدۡ وَلَمۡ یُولَدۡ abota te, abotamaka mpe te!*وَلَمۡ یَكُن لَّهُۥ كُفُوًا أَحَدُۢ﴾ Na azali na moto moko te oyo akokani na ye[Surat112: 1-4].

Nzambe (Allah) alobi :﴿اللَّهُ لا إِلَهَ إِلَّا هُوَ الْحَيُّ الْقَيُّومُ لا تَأْخُذُهُ سِنَةٌ وَلا نَوْمٌ لَهُ مَا فِي السَّمَوَاتِ وَمَا فِي الأَرْضِ مَنْ ذَا الَّذِي يَشْفَعُ عِنْدَهُ إِلَّا بِإِذْنِهِ يَعْلَمُ مَا بَيْنَ أَيْدِيهِمْ وَمَا خَلْفَهُمْ وَلا يُحِيطُونَ بِشَيْءٍ مِنْ عِلْمِهِ إِلَّا بِمَا شَاءَ وَسِعَ كُرْسِيُّهُ السَّمَوَاتِ وَالأَرْضَ وَلا يَئُودُهُ حِفْظُهُمَا وَهُوَ الْعَلِيُّ الْعَظِيمُ﴾ {Allah, nzambe mususu ezali te kaka ye, oyo azali na bomoi ya seko, oyo azali ya kotosa ye ntango nyonso, konimba ezuaka ye te ata pongi ezuaka ye te, nyonso oyo eza nakati ya mapata na mabele eza yaye, Nani akoki kobikisa epai na Ye? kaka na nzela naye Moko, Ayebi oyo ezali liboso na bango mpe oyo ezali nsima na bango, kasi basosoli ata boyebi na Ye te, kaka oyo ye alingi, Kiti na ye ya bokonzi etandami likoló mpe na mabele, na alembaka te kobatela yango, na ye azali likolo monene koleka}.[Surat 2: 255].

Lokumu ya Nkolo Mozwi-ya-Nguya-Nyonso

Nkolo azali Ye oyo akelaki mabele, akitisaki yango, mpe asali yango malamu mpo na bikelamu na ye, Ye nde akela Mapata mpe bikelamu minene kati na yango, mpe apesaki moi, sanza, butu, mpe moi contrôle oyo ya sikisiki oyo ezali kolakisa bonene na ye.

Nkolo azali nzambe oyo atiaki biso pema oyo soki toza na yango te, tokozala na bomoi te, mpe ye nde azalaka kobetisa mbula likoló na biso, mpe Asili koyangela biso mbu na bibale, Ye nde aleisaki biso ntango tozalaki ba fœtus na libumu ya bamama na biso kozanga makasi Ye nde asalaki ete makila eleka na misisa na biso mpe asalaki ete mitema na biso ebeta ntango nyonso banda mokolo tobotamaki tii tokufaki.

Nzambe mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobi:﴿وَاللَّهُ أَخْرَجَكُمْ مِنْ بُطُونِ أُمَّهَاتِكُمْ لَا تَعْلَمُونَ شَيْئًا وَجَعَلَ لَكُمُ السَّمْعَ وَالْأَبْصَارَ وَالْأَفْئِدَةَ لَعَلَّكُمْ تَشْكُرُونَ﴾ {Mpe Nzambe abimisaki bino na libumu ya bamama na bino kozangaka koyeba eloko te, na apesaki mpo na bino koyoka na komona, na mitema, mpo na bózala ba reconnaissant}(Surat16:78)

Nkolo oyo basambelaka ye asengeli azala na lokumu ya kokoka

Mozalisi na biso apesaka biso makanisi oyo ezali ko sosola bonene na Ye, mpe akotisaka kati na biso ezaleli ya kobotama oyo ezali kolakisa aza nzambe ya kokoka mpe ete Ye akoki kozala na bizaleli ya kozanga kokoka te.

Losambo esengeli kozala kaka mpo na Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, mpo na ete azali ya kokoka na abongi na losambo, mpe nyonso oyo esambelami longola se Ye ezali na ntina te, ezali ya kokoka te, mpe ekoki kokufa mpe kobomama.

Nzambe akoki kozala mutu te, ekeko, nzete te, to mpe nyama !

Ebongi te mpo na mutu oyo azali na mayele asambela! Kasi akosambela kaka oyo akoki, bongo ndenge nini akoki kosambela ekelamu oyo azali na nse na ye!

Nzambe akoki kozala mwana oyo azali na libumu ya mwasi te mpe kobotama lokola bana mibali! Te

Nkolo azali oyo akelaki bozalisi, mpe bozalisi ezali na bokangami na Ye mpe na nse ya minyoko na Ye. Bato bakoki kosala ye mabe te, mpe moto moko te akoki kobaka ye na ekulusu, konyokola ye, to kokitisa ye!

Nzambe akoki kokufa te!

Nkolo azali oyo abosanaka te, alalaka te, to aliaka bilei te Azali monene mpe akoki kozala na mwasi to mwana te. Mozalisi azali na bizaleli ya bonene mpe akoki ata moke te kozala na bizaleli ya mposa to bozangi, na makomi nyonso oyo ezali na eloko nyonso oyo ezali kotelemela bonene ya Mozalisi, oyo epesameli na basakoli, ezali makomi oyo ebebisami mpe ezali eteni ya emoniseli ya malamu te, lokola oyo Moise, Yesu, mpe basakoli mosusu, kimia mpe mapamboli ezala likolo na bango, bayakaki na esakoli ya malamu.

Nzambe alobi:يَا أَيُّهَا النَّاسُ ضُرِبَ مَثَلٌ فَاسْتَمِعُوا لَهُ إِنَّ الَّذِينَ تَدْعُونَ مِنْ دُونِ اللَّهِ لَنْ يَخْلُقُوا ذُبَابًا وَلَوِ اجْتَمَعُوا لَهُ وَإِنْ يَسْلُبْهُمُ الذُّبَابُ شَيْئًا لَا يَسْتَنْقِذُوهُ مِنْهُ ضَعُفَ الطَّالِبُ وَالْمَطْلُوبُ (73) O bato, lisese moko elobami, boye boyoka yango Ya solo, baoyo bobeleli Bango, botiki Nzambe bakokela ata nzinzi te, na ata soki basangani esika moko mpo na yango , na ata nzinzi alongoli bango eloko moko, bakoki kobikisa yango te, Botau ya moto oyo azali kosenga Bango na oyo basengi ye (73)مَا قَدَرُوا اللَّهَ حَقَّ قَدْرِهِ إِنَّ اللَّهَ لَقَوِيٌّ عَزِيزٌ (74) bosepela na Nzambe ndenge abongi yasolo, Allah azali na makasi, na Nguya nyonso (74)[Surat 22: 73, 74].

Ezali likoki ete Mozalisi atika biso kozanga emoniseli ?

Yasolo nzambe akela bikelamu nyonso na tina moko te?

Ekoki kosalema ete Ye oyo akelaki biso na bosikisiki mpe na mayele ya ndenge wana mpe akitisaki biso biloko nyonso oyo ezali na likoló mpe na mabele, akela biso kozanga ntina, to atika biso kozanga eyano na mituna ya ntina mingi oyo ezali kotungisa biso, na ndakisa: Mpo na nini tozali awa? Ezali boni nsima ya liwa? Ntina ya bozalisi na biso ezali nini?

Kasi, Nzambe atindaka bamemi-nsango mpo ete toyeba ntina ya bozali na biso, mpe nini alingi epai na biso !

Nzambe atindaka bamemi-nsango mpo na koyebisa biso ete ye moko ebongi kosambela ye, mpe koteya biso lolenge nini tosambela Ye, mpe koyebisa biso mitindo na bipekiseli na Ye, mpe koteya biso bizaleli malamu oyo soki tokangami na yango, ya biso bomoi ekozala malamu, etonda na bolamu mpe mapamboli.

Nzambe atindaka bamemi-nsango ebele, lokola (Noa, Moise, na Yesu), mpe Nzambe apesaka bamemi-nsango wana bilembo mpe makamwisi oyo elakisaki bosembo na bango mpe ete batindamaki uta na nzambe mozalisi.

Motindami ya suka ezali Muhammad - Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia - mpe Nzambe akitiselaka ye Coran esantu.

Bantoma bayebisaki biso polele ete bomoi oyo ezali bomekana na bomoi ya solo ekozala nsima ya liwa

Mpe ezali na Paradis mpo na bandimi oyo basambelaka Nzambe ye moko na molongani te mpe bandimaka bamemi-nsango nyonso, na ezali na moto oyo Nzambe abongisaki mpo na bato oyo bazalaki kondima ye te ! oyo bazalaki kosambela ba nzambe mosusu, na bazalaki kondima ata momemi-nsango moko te ya Nzambe.

Nzambe alobi:

يَابَنِي آدَمَ إِمَّا يَأْتِيَنَّكُمْ رُسُلٌ مِنْكُمْ يَقُصُّونَ عَلَيْكُمْ آيَاتِي فَمَنِ اتَّقَى وَأَصْلَحَ فَلَا خَوْفٌ عَلَيْهِمْ وَلَا هُمْ يَحْزَنُونَ (35) Ee bana ya Adama, ntango bakoya epai na bino bamemi-nsango uta na kati na bino, bakoyebisa bino baverse na ngai, bongo moto nyonso oyo akobanga na akobongola misala ekomi ya malamu, ekozala na somo te, mpe bango bakozala na kati ya mawa te (35)وَالَّذِينَ كَذَّبُوا بِآيَاتِنَا وَاسْتَكْبَرُوا عَنْهَا أُولَئِكَ أَصْحَابُ النَّارِ هُمْ فِيهَا خَالِدُونَ (36) Mpe baye bazali kowangana bilembo na Biso mpe bazali kotiola yango - bango bazali bato ya Moto ya lifelo Bakofanda kati na yango libela (36)[Surat 7: 35-36].

Mpe Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobi ete:﴿ أَفَحَسِبْتُمْ أَنَّمَا خَلَقْنَاكُمْ عَبَثًا وَأَنَّكُمْ إِلَيْنَا لَا تُرْجَعُونَ ﴾ {Bokanisi ete Tokela bino pamba, na epai na biso nde bokozongisama}.[Surat 23: 115].

CORAN ESANTU

Coran ya lokumu ezali liloba ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, oyo emonisami na momemi-nsango ya nsuka, Muhammad, na ezali likamwisi monene oyo ezali kolakisa bosolo ya esakweli ya Muhammad - tika ete Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, ezali bosolo na bikateli na yango mpe bosolo na nsango na yango, Nzambe atielaka bango ntembe na bawanganaki mpo na kobimisa ata surah moko lokola Coran oyo, kasi bazalaki na makoki te ya kosala yango Mpo na kitoko ya lolenge na yango mpe mayele ya maloba na yango. esangisi ebele ya bilembeteli ya mayele mpe makambo ya siansi oyo ezali kolakisa ete buku oyo ekokaki kozala na bato te, kasi ezali nde liloba ya Nkolo ya bato, Nkembo ezala na ye.

Mpo na nini bamemi-nsango baza ebele ?

Nzambe atindaki bamemi-nsango uta ebandeli ya ntango mpo na kobenga bato epai ya Nkolo na bango, mpe kopesa bango mitindo mpe bipekiseli na ye ezalaki ya kosambela Nzambe se moko, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, mpe ntango nyonso oyo ekolo moko ebandaki kotika to kobebisa oyo Ntoma na yango amemaki , lokola etinda ya kosangisa Nzambe, Nzambe apesaki motindami mosusu mpo na kobongisa yango. mobeko ya seko ya monene mpo na bato banso kino Mokolo ya Lisekwa, ko kokisa mpe kolongola mibeko oyo eyaki liboso na yango, mpe Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso apesaki ndanga ete mobeko mpe nsango oyo etikala mpe ekoumela kino Mokolo ya Lisekwa.

Yango wana, biso ba musulmans tondimi - ndenge Nzambe atindaki - na bamemi-nsango mpe mikanda nyonso ya kala.

Nzambe alobi:﴿ءَامَنَ ٱلرَّسُولُ بِمَاۤ أُنزِلَ إِلَیۡهِ مِن رَّبِّهِۦ وَٱلۡمُؤۡمِنُونَۚ كُلٌّ ءَامَنَ بِٱللَّهِ وَمَلَـٰۤىِٕكَتِهِۦ وَكُتُبِهِۦ وَرُسُلِهِۦ لَا نُفَرِّقُ بَیۡنَ أَحَدࣲ مِّن رُّسُلِهِۦۚ وَقَالُوا۟ سَمِعۡنَا وَأَطَعۡنَاۖ غُفۡرَانَكَ رَبَّنَا وَإِلَیۡكَ ٱلۡمَصِیرُ﴾ {Motindami andimaki na oyo emonisamaki epai na ye uta na Nkolo na ye, Na bandimi: bango nyonso ba ndima Nzambe, na ba anzelu na ye, mikanda na Ye, mpe bamemi-nsango na Ye, Tosalaka bokeseni te, kati na moko ya Bamemi-nsango na Ye, na balobaki: Toyoki mpe totosi, Bolimbisi na yo, Nkolo na biso, mpe epai na Yo ezali esika ya nsuka}.[2: 285]. [Surat 2: 285].

Moto azali mondimi te kino akondimela bamemi-nsango nyonso

oyo atindaka bamemi-nsango ezali Nzambe, Na moto nyonso oyo azali kondima te nsango ya moko na bango, andimi bango nyonso te, Lisumu monene ezali te koleka moto oyo aboyi emoniseli ya Nzambe, na Pona kokota na Paradis, esengeli kondima Bamemi-nsango banso.

Ezali obligatoire mpo na moto nyonso na tango oyo kondima bamemi-nsango banso ya Nzambe, mpe yango ekoki kosalema te kaka na kondima, mpe kolanda oyo ya nsuka na ya nsuka kati na bango, Muhammad, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia.

Nzambe alobelaki na kati ya coran Esantu ete moto nyonso oyo aboyi kondima moko ya bamemi-nsango ya Nzambe azali moto oyo azali kondima Nzambe te mpe azali kondima emoniseli na ye te:

Tángá verse oyo elandi:"إنَّ الَّذِينَ يَكْفُرُونَ بِاللَّهِ ورُسُلِهِ ويُرِيدُونَ أنْ يُفَرِّقُوا بَيْنَ اللَّهِ ورُسُلِهِ ويَقُولُونَ نُؤْمِنُ بِبَعْضٍ ونَكْفُرُ بِبَعْضٍ ويُرِيدُونَ أنْ يَتَّخِذُوا بَيْنَ ذَلِكَ سَبِيلًا Ya solo, baye bandimaka Nzambe te na Bamemi-nsango na Ye mpe balingi kosala bokeseni kati na Nzambe mpe Bamemi-nsango na Ye mpe balobi ete, "Tondimi na ndambo mpe tondimi na ndambo te" mpe balingi kozwa nzela kati na yangoأُولَئِكَ هُمُ الكافِرُونَ حَقًّا وأعْتَدْنا لِلْكَفَرَيْنِ عَذابًا مُهِينًا﴾". Wana bazali solo bato oyo bazangi kondima, mpe tobongisaki mpo na bato oyo bazangi kondima etumbu ya nsoni}.[Surat 4: 150 151].

Islam ezali nini?

Islam ezali kotosa Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso na nzela ya bondimi ya Nzambe moko, kotosa ye na nzela ya botosi, mpe kotosa mibeko na ye na ndingisa mpe na kondima.

Nzambe atindaka bamemi-nsango mpo na nsango moko: libiangi ya kosambela Nzambe ye moko, kosangisa ye te.

Islam ezali lingomba ya ba prophètes nioso bobengi na bango ezalaka ndenge moko na mibeko na bango ezali ndenge moko ba musulmans lelo nde bazo kangama na lingomba ya solo oyo ba prophètes nionso ba memaka, pe nsango ya Islam na tango oyo ezali vérité. Nkolo oyo atindaka Abraham, Moise, na Jesus nde atindaka motindami ya suka, Muhammad, mpe mibeko ya Islam, elongolaka mibeko oyo eyaka liboso na yango.

Mangomba nyonso oyo bato basambelaka lelo - longola kaka Islam - na oyo etikali ezali mangomba bato basalaka yango, to mangomba oyo ezalaka ya bo nzambe mpe na nsima ebongwanaka na maboko ya bato mpe ekomaka lingomba Yako sangisa oyo bakutaka na oyo babakisaka na kati, Na oyo etali bondimi ya ba musulmans, ezali bondimi moko ya polele oyo ebongwanaka te, pe tala na coran esantu, ezali buku moko na mboka nyonso ya ba musulmans.

Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobi na kati ya Coran:

قُلْ آمَنَّا بِاللَّهِ وَمَا أُنْزِلَ عَلَيْنَا وَمَا أُنْزِلَ عَلَى إِبْرَاهِيمَ وَإِسْمَاعِيلَ وَإِسْحَاقَ وَيَعْقُوبَ وَالْأَسْبَاطِ وَمَا أُوتِيَ مُوسَى وَعِيسَى وَالنَّبِيُّونَ مِنْ رَبِّهِمْ لَا نُفَرِّقُ بَيْنَ أَحَدٍ مِنْهُمْ وَنَحْنُ لَهُ مُسْلِمُونَ (84) Loba, "Tondimi Nzambe mpe na oyo ekitaka epai na biso, na oyo ekitaka epai ya Abraham, na Ismail, na Isaac, na jacob Mpe mabota, na maye mapesamaka na Moise na Jesus mpe basakoli uta na Nkolo na bango - Tokesenisi ata moko te kati Na bango, mpe tozali ba musulman (84)وَمَنْ يَبْتَغِ غَيْرَ الْإِسْلَامِ دِينًا فَلَنْ يُقْبَلَ مِنْهُ وَهُوَ فِي الْآخِرَةِ مِنَ الْخَاسِرِينَ 85). Mpe oyo akoluka lingomba mosusu, sima ya Islam, ekondimama epai na ye te, mpe na sima akozala na kati ya baye babungi 85).[Surat 3: 84,85]

Ba musulmans ba ndimaka nini pona Jésus, kimia ezala likolo na ye?

Oyebi ba musulmans ezali mibeko ba ndima ntoma ya Nzambe Jesus, mpe balinga ye, ba tosa ye, mpe ba ndima nsango na ye, oyo ezalaka kobenga bato na losambo ya Nzambe moko, mpe kosangisa ye te, ba musulmans ba ndimaka Prophète Jésus na Prophète Muhammad (Nzambe apambola bango pe apesa bango kimia), Bazalaka basakoli, mpe batindamaka mpo na kotambwisa bato, Na nzela ya Nzambe mpe na nzela ya lola.

Tondimi ete Jesus, kimia ezala likolo na ye, azalaka moko ya bamemi-nsango minene oyo Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso atindaka, mpe Tondimi ete abotamaka na ndenge ya likamwisi, ndenge Nzambe ayebisaki biso na Coran , Akelaka Jesus azalaka na tata te , mpe ndenge akelaka Adama azangi tata na mama, Nzambe azali na makoki ya kosala makambo nyonso.

Tondimi ete Jesus, azali Nzambe te, mpe Mwana ya Nzambe te, na abakamaka na ekulusu te, kasi ye aza na bomoi, Nzambe atumbolaka ye epayi naye, Na suka ya tango ya kosamba ya solo ako tindama pe ekozala na ba musulmans, Pamba te ba musulmans bazali ba ndimi ya bosolo ya nzambe Moko, oyo Jesus na ba prophète nionso ba lakisaka.

Nzambe asili koyebisa biso na Coran esantu ete nsango ya Jesus, ebebisamaka na ba kristu, Mpe ezali na bato oyo ba pengwaka nzela oyo babebisaka na babongolaka Nsango Malamu ya Évangile, na babakisaka makomi oyo Jesus alobaka te, Elembeteli oyo emonisi yango ezali bongo baverse mingi ya Biblia, mpe ezali na makambo mingi oyo ezali na bokeseni kati na yango.

Nzambe asili koyebisa biso ete Jesus azalaka kosambela Nkolo na ye, mpe asengaka moto moko te asambela ye lokola nzambe, Kasi, azalaka nde kopesa bato na ye mitindo ete básambela nzambe Mozalisi na ye, kasi Satana atindaka bakristo básambela Jesus, Nzambe ayebisaki biso na Coran ete akolimbisa moto ata moko te, oyo akosambela Losambo mosusu oyo ezali ya nzambe te, Mpe na Mokolo ya Lisekwa, Jesus akowangana baoyo ba sambelaka ye, mpe akoloba na bango: Napesaka bino mitindo ete bósambela nzambe mozalisi, mpe nasengaka bino te bósambela ngai. elembeteli ya likambo yango ezali liloba ya nzambe mozwi-ya-Nguya-Nyonso:

﴿یَـٰۤأَهۡلَ ٱلۡكِتَـٰبِ لَا تَغۡلُوا۟ فِی دِینِكُمۡ وَلَا تَقُولُوا۟ عَلَى ٱللَّهِ إِلَّا ٱلۡحَقَّۚ إِنَّمَا ٱلۡمَسِیحُ عِیسَى ٱبۡنُ مَرۡیَمَ رَسُولُ ٱللَّهِ وَكَلِمَتُهُۥۤ أَلۡقَىٰهَاۤ إِلَىٰ مَرۡیَمَ وَرُوحࣱ مِّنۡهُۖ فَـَٔامِنُوا۟ بِٱللَّهِ وَرُسُلِهِۦۖ وَلَا تَقُولُوا۟ ثَلَـٰثَةٌۚ ٱنتَهُوا۟ خَیۡرࣰا لَّكُمۡۚ إِنَّمَا ٱللَّهُ إِلَـٰهࣱ وَ ٰ⁠حِدࣱۖ سُبۡحَـٰنَهُۥۤ أَن یَكُونَ لَهُۥ وَلَدࣱۘ لَّهُۥ مَا فِی ٱلسَّمَـٰوَ ٰ⁠تِ وَمَا فِی ٱلۡأَرۡضِۗ وَكَفَىٰ بِٱللَّهِ وَكِیلࣰا﴾ ﴾Bino bato ya Buku, bolekisa ndelo te na lingomba na bino, mpe bolobela nzambe te Kasi boloba bosolo pona ye, Masiya, Yesu, mwana ya Maria, azali kaka Motindami ya Nzambe mpe Liloba na Ye oyo apesaka na Maria, na molimo ewutaka epayi na ye, kasi bondima Nzambe mpe Ba memi-nsango na Ye, Mpe boloba te, "nzambe misato, soki botiki koloba bongo ezali malamu pona bino, kasi Allah azali bobele Nzambe, Nkembo ezali ya ye moko azali na mwana te, ye oyo ezali na nkolo ya Mapata, na mabele." mpe Nzambe (Allah) akoki lokola mosungi ya makambo.[Surat 4: 171]

Nzambe (Allah) Alobi:(وَإِذْ قَالَ اللَّهُ يَا عِيسَى ابْنَ مَرْيَمَ أَأَنتَ قُلْتَ لِلنَّاسِ اتَّخِذُونِي وَأُمِّيَ إِلَٰهَيْنِ مِن دُونِ اللَّهِ ۖ قَالَ سُبْحَانَكَ مَا يَكُونُ لِي أَنْ أَقُولَ مَا لَيْسَ لِي بِحَقٍّ ۚ إِن كُنتُ قُلْتُهُ فَقَدْ عَلِمْتَهُ ۚ تَعْلَمُ مَا فِي نَفْسِي وَلَا أَعْلَمُ مَا فِي نَفْسِكَ ۚ إِنَّكَ أَنتَ عَلَّامُ الْغُيُوبِ (Mpe ntango Nzambe akoloba ete, "Ee Jesus, mwana ya Maria, olobaki na bato ete, 'Bózwa yo ná mama na yo lokola banzambe mibale Batika nzambe? ,akoloba : nkembo nayo nzambe, ezali ngai te nde nalobaka, yango eza litomba nanga te, mpe soki nalobaka yango olingaka oyeba, oyebi oyo eza nakati nangayi, kasi ngayi nayebi te oyo eza epayi nayo, Ya solo, Ozali Moyebi ya biloko oyo emonanaka te(Surat 5:116)

Oyo alingi abika na bomoyi ya Moko ya nsuka asengeli akota na Islam pe alanda Prophète Muhammad, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia

Moko ya makambo yasolo oyo basakoli mpe bamemi-nsango bayokanaka, kimia ezala likoló na bango, ezali ete mutu akobika te na bomoi nsima ya liwa naye, Longola se ba musulmans oyo ba ndimaka Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso pe basangisaka ye na losambo na ye te, pe ba ndimaka ba prophètes na ba messages nyonso, Ba oyo bazalaka, mpe ba oyo Bazalaka na tango ya Prophète Moise ba ndimaka ye, mpe balandaka mateya na ye, bazalaka ba musulmans ya sembo, soki moko nabango aboyaka kondima Jesus, mpe alobi, "Nakokoba kolanda lingomba ya Moise, wana azali mondimi te." Mpo aboyi kondima mosakoli oyo Nzambe atindaka, Na nsima, nsima wana Nzambe atindaka nsuka ya bamemi nsango, Muhammad, na moto nyonso asengeli kondima ye, Na Nkolo nde atindaka Moise na Jesus, mpe ye nde atindaka motindami ya suka, Muhammad, oyo okoboya kondimi nsango ya Muhammad (S.a.w), mpe mutu wana alobi, "Nakokoba kolanda Moise to Jesus" azali mondimi te.

Ekoki te epai ya mutu, koloba ete ye atosaka ba musulman, na pona alonga mokolo ya suka ekoki te mpo Na ye, kobimisa Kaka mabonza to kosunga ba bola suka! , Kasi Esengeli mutu azala mpe mondimi, Kondimela Nzambe, mikanda na Ye, bamemi-nsango na Ye, mpe Mokolo ya Nsuka, mpo na nzambe andimela ye, Ezali na lisumu monene te koleka shirki, na kozanga kondima Nzambe, mpe koboya emoniseli oyo Nzambe atindaka, na koboya esakoli ya prophète na ye, ya suka, Muhammad, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, na soki baboyi kondima yango mpe baboyi kokota na lingomba ya Islam, bakozala na moto ya Lifelo, bakofanda na yango libela, ndenge Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobi:

{إِنَّ الَّذِينَ كَفَرُوا مِنْ أَهْلِ الْكِتَابِ وَالْمُشْرِكِينَ فِي نَارِ جَهَنَّمَ خَالِدِينَ فِيهَا ۚ أُولَـٰئِكَ هُمْ شَرُّ الْبَرِيَّةِ} {Ya solo, baye bazangi kondima na Bato ya Buku pe na ba mushiriki , bokozala Na moto ya Lifelo mpo na kotikala na kati libela, wana bazali bikelamu ya mabe koleka}.[Surat 98: 6].

Lokola nsango ya suka oyo euti epai ya Nzambe mpo na bato, kasi esengeli moto nyonso oyo akoyoka makambo ya Islam mpe ayoki nsango ya Ntoma ya nsuka Muhammad, tika ete Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, asengeli andima yango, mpe alanda Mibeko na ye mpe atosa mitindo naye, mpe bipekiseli na ye, Yango wana, moto nyonso oyo akoyoka nsango oyo ya nsuka mpe aboyi yango, Nzambe akondima eloko moko te epai na ye, mpe akopesa ye etumbu na bomoi nsima ya liwa. Elembeteli ya likambo yango ezali liloba ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso:

﴿وَمَن یَبۡتَغِ غَیۡرَ ٱلۡإِسۡلَـٰمِ دِینࣰا فَلَن یُقۡبَلَ مِنۡهُ وَهُوَ فِی ٱلۡـَٔاخِرَةِ مِنَ ٱلۡخَـٰسِرِینَ﴾ {Na oyo akoluka lingomba mususu atiki isilamu, ekondimama epai na ye te, mpe na sima akozala na kati ya baye Ba bungi}.[Surat 3: 85].

Nzambe (Allah) alobi :(قُلْ يَا أَهْلَ الْكِتَابِ تَعَالَوْا إِلَىٰ كَلِمَةٍ سَوَاءٍ بَيْنَنَا وَبَيْنَكُمْ أَلَّا نَعْبُدَ إِلَّا اللَّهَ وَلَا نُشْرِكَ بِهِ شَيْئًا وَلَا يَتَّخِذَ بَعْضُنَا بَعْضًا أَرْبَابًا مِّن دُونِ اللَّهِ ۚ فَإِن تَوَلَّوْا فَقُولُوا اشْهَدُوا بِأَنَّا مُسْلِمُونَ) (Loba, Ee Bato ya Buku Boya na liloba moko ya boyokani kati na biso na bino, tosambela Kaka nzambe ye moko to sangisa ye na eloko Moko te, mpe tozuana ba nzambe te Nakati nabiso, sima ya nzambe, na Soki bazongi sima, mpe balobi tondimeli nzambe mpe toza ba musulman)(Surat 3: 64).

Nini ezo senga po nazala musulman?

Mpo na kokota na Islam, esengeli ondima makonzí motoba oyo:

Kondima Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, ete ye azali Mozalisi, Mosungi, Mokabi, mokanbi mokonzi, mpe eloko moko te ezali lokola Ye, mpe azali na mwasi na mwana te, mpe Ye moko ebongi ko sambela ye.

Kondima na baanzelu ete bazali basaleli ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso oyo akelaka bango uta na lumière, na akomisaka yango moko ya misala na bango bakitisaka emoniseli epai ya basakoli na ye.

Kondima na mikanda nyonso oyo Nzambe amonisaka epai ya basakoli na Ye, (lokola Torah na Évangile) na buku ya suka ezali Coran Esantu.

Kondima na bamemi-nsango nyonso, lokola Noa, Abraham, Moise, Jesus, mpe ya nsuka kati na bango ezali Muhammad, Bazalaka bato oyo nzambe asungaka bango na emoniseli mpe apesaka bango bilembo, Mpe makamwisi oyo emonisaka bosembo na bango.

Kondima na Mokolo ya suka tango Nzambe akosekwisa, bato ya liboso mpe ya suka, na nzambe akosambisa kati ya bikelamu na ye, mpe ako ndima bandimi bakota paradis pe ba oyo baza ba ndimite na Lifelo.

Kondima na destin mpe Nzambe ayebi nionso, oyo ezalaki liboso mpe oyo ekozala na mikolo ekoya, mpe nzambe nde atiaka oyo ye alingi yango, mpe yende akelaki nionso.

Islam ezali nzela ya esengo

Islam ezali lingomba ya basakoli nionso mpe ezali lingomba ya ba Arabes bango Moko te.

Islam ezali nzela ya esengo ya solo na mokili oyo mpe esengo ya seko na bomoi nsima ya liwa.

Islam ezali lingomba se moko oyo ekoki, na kokokisa bamposa ya molimo na nzoto, mpe kosilisa mikakatano nyonso ya bato.

Nzambe alobi:

{قَالَ اهْبِطَا مِنْهَا جَمِيعًا بَعْضُكُمْ لِبَعْضٍ عَدُوٌّ فَإِمَّا يَأْتِيَنَّكُمْ مِنِّي هُدًى فَمَنِ اتَّبَعَ هُدَايَ فَلا يَضِلُّ وَلا يَشْقَى {Alobaki, Bokita na yango bino banso, na kati nabino bozali banguna moko na ba mosusu, Bongo tango bokambi ekoya epai na bino uta na Ngai, oyo alandi bokambi na Ngai akobunga nzela te, mpe akozala na mawa teوَمَنْ أَعْرَضَ عَنْ ذِكْرِي فَإِنَّ لَهُ مَعِيشَةً ضَنْكًا وَنَحْشُرُهُ يَوْمَ الْقِيَامَةِ أَعْمَى Mpe oyo akobaluka mosika na bokundoli na Ngai, akozala na bomoi ya kokangama, mpe tokosekwisa ye na miso ekufá na Mokolo ya Lisekwa.[Surat 20: 123-124].

Nazali kozwa litomba nini soki nakoti na Islam?

Kokota na Islam ezali na matomba minene, kati na yango:

- Elonga pe lokumu na mokili oyo elakisi ete moto azali mosali ya Nzambe, soki te azali mosali ya pasi, ya satana, pe ya ba posa.

- Elonga monene na bomoi nsima ya liwa, Pona kobika na minyoko ya Lifelo pe kokota na Paradis, pe kolonga na mawa ya Allah, kofanda na bango seko na Paradis.

- Baoyo Nzambe andimi na Paradis bakofanda na esengo ya seko kozanga liwa na lolenge nyonso ya maladi, mpasi, mawa, na mibange eza te, na bakozwa nyonso oyo balingi.

Na Paradis ezali na bisengo oyo liso moko te emona, litoi moko te eyoká, mpe moto moko te akanisa bongo.

Elembeteli ya likambo yango ezali liloba ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso:﴿مَنۡ عَمِلَ صَـٰلِحࣰا مِّن ذَكَرٍ أَوۡ أُنثَىٰ وَهُوَ مُؤۡمِنࣱ فَلَنُحۡیِیَنَّهُۥ حَیَوٰةࣰ طَیِّبَةࣰۖ وَلَنَجۡزِیَنَّهُمۡ أَجۡرَهُم بِأَحۡسَنِ مَا كَانُوا۟ یَعۡمَلُونَ﴾ {Oyo asali boyengebene, ezala mobali to mwasi, mpe azali mondimi, tokopesa ye bomoyi ya malamu mpe tokopesa bango lifuti malamu koleka oyo bango bazalaki kosala}.[Surat 16: 97].

Nako bongisa nini soki naboyi Islam?

Moto akobungisa boyebi mpe ntina oyo eleki monene, na yango ezali ntina na boyebi Nzambe, mpe akobungisa kondima na Nzambe, oyo apesaka moto libateli mpe kimia na mokili oyo mpe esengo ya seko na bomoi nsima ya liwa.

Moto akobungisa nzela ya kozwa buku oyo eleki monene oyo Nzambe abimisaki epayi ya bato, mpe kondima na buku monene oyo.

Akobungisa bondimi ba ntoma minene, kaka lokola akobungisa bokutani na bango na Paradis na Mokolo ya Lisekwa, mpe akozala na kati ya ba zabolo, bato mabe, mpe bato ya mabe na moto ya Lifelo, na ndako ya mawa mpe esika ya mawa.

Nzambe alobi:

قُلْ إِنَّ الْخَاسِرِينَ الَّذِينَ خَسِرُوا أَنْفُسَهُمْ وَأَهْلِيهِمْ يَوْمَ الْقِيَامَةِ أَلا ذَلِكَ هُوَ الْخُسْرَانُ الْمُبِينُ (15) Loba : Ya solo, ba bungisi ezali baoyo babungisaka bango moko mpe mabota na bango na mokolo ya lisekwa (15)لَهُمْ مِنْ فَوْقِهِمْ ظُلَلٌ مِنَ النَّارِ وَمِنْ تَحْتِهِمْ ظُلَلٌ ذَلِكَ يُخَوِّفُ اللَّهُ بِهِ عِبَادَهُ يَا عِبَادِ فَاتَّقُونِ } . Likolo na bango ekozala na elilingi ya moto, mpe na nse na yango ekozala na bilili ya moto, Nzambe abangisaka basali na Ye na yango, bino basali, yango wana bokeba}.[Surat 39: 15-16].

Kozelisa décision te!

Mokili ezali esika ya kofanda seko te!...

Kitoko nionso ekolimwa ye, mpe posa nionso eko bomana...

Mokolo ekoya ntango bokozwa mokumba mpo na nyonso bosali, mpe yango ezali Mokolo ya Lisekwa, Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobi:{وَوُضِعَ الْكِتَابُ فَتَرَى الْمُجْرِمِينَ مُشْفِقِينَ مِمَّا فِيهِ وَيَقُولُونَ يَا وَيْلَتَنَا مَالِ هَذَا الْكِتَابِ لاَ يُغَادِرُ صَغِيرَةً وَلاَ كَبِيرَةً إِلاَّ أَحْصَاهَا وَوَجَدُوا مَا عَمِلُوا حَاضِرًا وَلاَ يَظْلِمُ رَبُّكَ أَحَدًا} {Na ekotiama Buku mpe okomona bato mabe bazali kobanga mpo na oyo ezali na kati nango, Mpe bakolobi: "Mawa na biso, likambo nini na buku oyo? Etikaka eloko moko ya moke to ya monene te, kaka ezala Nakati, Mpe bakutaki oyo basalaki wana, Mpe Nkolo na yo asalaka moto zulma mabe te}[Surat 18: 49].

Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ayebisi biso ete moto oyo amikotisi na Islam te azali destiné seko na moto ya Lifelo libela.

Kobungisa ezali petee te, kasi ezali monene:{وَمَن يَبْتَغِ غَيْرَ الْإِسْلَامِ دِينًا فَلَن يُقْبَلَ مِنْهُ وَهُوَ فِي الْآخِرَةِ مِنَ الْخَاسِرِينَ } {Na oyo akoluka sima ya isilamu lingomba mususu, Ekondimama epai na ye te, mpe na sima akozala na kati ya baye babungi}[Surat 3: 85].

Islam ezali lingomba oyo Nzambe andimaka mangomba mosusu te.

Nzambe nde akelaki biso mpe epai na ye nde tokozonga, na mokili oyo ezali bomekano mpo na biso.

Zala na kati ya elikia: Bomoi oyo ezali mokuse lokola ndoto...mpe moto moko te ayebi ntango nini akokufa!

Eyano na yo ekozala nini epai ya nzambe mozalisi na yo soki atuni yo na Mokolo ya Lisekwa: Mpo na nini olandaki bosolo te? Pona nini bolandaki Sembo ya Ba ntoma te?

Ndenge nini okoyanola Nkolo na yo na mokolo ya lisekwa, ntango akebisi yo na ntina ya mbano ya kozanga kondima Islam, mpe ayebisi yo ete nsuka ya bato oyo bazangi kondima ezali kobebisama ya seko na lifelo?

Nzambe (Allah) alobi :﴿وَالَّذِينَ كَفَرُوا وَكَذَّبُوا بِآيَاتِنَا أُولَئِكَ أَصْحَابُ النَّارِ هُمْ فِيهَا خَالِدُونَ﴾ {Mpe baye bandimi te mpe bawangani bilembo na Biso - bango bazali bakangami ya Moto Bakofanda na kati na yango libela}.[2: 39]. [Surat 2: 39].

Ezali na ntina moko te ya komilongisa mpo na baoyo basundolaka bosolo mpe balandi batata mpe bankoko

Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ayebisaki biso ete bato mingi baboyaka kobongwana na Islam mpo na kobanga esika oyo bafandi.

Bato mingi baboyaka Islam mpo balingi te kobongola bindimeli na bango oyo bazwaki epai ya batata na bango mpe bameseni na yango, mpe mingi kati na bango bapekisami na fanatisme mpe mposa ya kosunga lokuta oyo bazwaki.

Bato oyo banso bazali na ntina te mpo na likambo oyo, mpe bakotelema liboso ya Nzambe kozanga kolongisa.

Ezali ntina te mpo na moto oyo andimaka te, Aloba Nzambe azali koloba ete, "Nakotikala moto oyo andimaka Nzambe te mpo nabotamaki na libota ya bato oyo bandimaka te Nzambe azali!" ,Asengeli nde kosalela makanisi oyo Nzambe apesi ye, mpe komanyola bonene ya lola mpe ya mabele, mpe kokanisa na makanisi na ye ete Mozalisi na ye apesaki ye mpo na kososola ete molɔ́ngɔ́ oyo ezali na Mozalisi Ndenge moko, ye oyo asambelaka mabanga mpe bikeko azali na ntina ya komekola batata na ye te, asengeli nde koluka bosolo mpe komituna: Ndenge nini?

Ndenge moko mpe, moklisto oyo andimi makambo oyo ezali kokesana na mayele mpe makanisi asengeli komituna boye: Ndenge nini Nzambe akokaki koboma mwana na ye oyo asalaki lisumu te mpo na masumu ya bato mosusu? Oyo ezali sembo te! Ndenge nini bato bakokaki kobaka Mwana ya Nzambe na ekulusu mpe koboma? Nzambe azali na makoki ya kolimbisa masumu ya bomoto te sans ko permettre bango ba boma Mwana na Ye? Nkolo azali na makoki te ya kobatela Mwana na ye?

Ezali mokumba ya moto ya mayele kolanda bosolo, mpe kolanda batata na bankoko na lokuta te.

Nzambe alobi:﴿وَإِذَا قِیلَ لَهُمۡ تَعَالَوۡا۟ إِلَىٰ مَاۤ أَنزَلَ ٱللَّهُ وَإِلَى ٱلرَّسُولِ قَالُوا۟ حَسۡبُنَا مَا وَجَدۡنَا عَلَیۡهِ ءَابَاۤءَنَاۤۚ أَوَلَوۡ كَانَ ءَابَاۤؤُهُمۡ لَا یَعۡلَمُونَ شَیۡـࣰٔا وَلَا یَهۡتَدُونَ﴾ {Mpe ntango elobami na bango ete, "Bóya epai ya oyo Nzambe abimisi mpe epai ya Ntoma," balobi: "Ekoki mpo na biso oyo tokutaki batata na biso likoló na yango na ebandeli mpe batata na bango bayebaki eloko moko te." bazalaki kotambwisa}.[Surat 5: 104].

Mutu oyo alingi akota na Islam asala nini mpe azali kobanga kosala bandeko na ye mabe?

Oyo alingi ko kota na Islam mpe azali kobanga environnement zinga zinga na ye, akoki ko convertir na Islam mpe kobomba Islam na ye tiii Nzambe ako facilité pona ye nzela ya malamu koleka oyo akoki kokoma indépendant pe kobimisa Islam na ye.

Ezali mokumba na yo kondima Islam mbala moko, kasi osengeli te koyebisa bato oyo bazali zingazinga na yo Islam na yo to koyebisa yango na bato nyonso te, soki yango ekozala mabe mpo na yo.

Yeba ete soki okomi musulman, okozala ndeko ya ba millions ya ba musulmans, pe okoki ko contacter mosquée to centre islamique na mboka na yo pe kosenga bango toli pe lisungi, na bakosepela na yango.

Nzambe alobi:

{وَمَنْ يَتَّقِ اللَّهَ يَجْعَلْ لَهُ مَخْرَجًا وَيَرْزُقْهُ مِنْ حَيْثُ لَا يَحْتَسِب} {Mpe oyo azali kobanga Nzambe, akopesa ye nzela ya kobima mpe akopesa ye bamposa uta esika oyo azalaki kokanisa te}[Surat 65: 2-3]

Ndeko nanga Motangi ya bolingo

Kosepelisa Nzambe Mozalisi na yo - oyo apesaki yo mapamboli na Ye nyonso, oyo apesaki yo bilei ntango ozalaki mwana oyo azali na libumu ya mama na yo mpe apesaki yo mpema oyo ozali kopema nango sikoyo - ezali na ntina mingi koleka bato bandima yo?

Elonga ya mokili mpe ya mokolo ya nsuka ebongi te kopesa mbeka bisengo nyonso ya ntango mokuse ya bomoi? Ee, nalapi ndayi!

Kotika te makambo na yo ya kala epekisa yo osembola , na tika nzela na yo ya mabe mpe osala likambo ya malamu.

Koma mondimi ya solo lelo! Kotika te Satana apekisa yo olanda bosolo!

Nzambe alobi:

{يَا أَيُّهَا النَّاسُ قَدْ جَاءَكُمْ بُرْهَانٌ مِنْ رَبِّكُمْ وَأَنزلْنَا إِلَيْكُمْ نُورًا مُبِينًا (174) {Ee bato, bilembeteli eyei epai na bino uta na Nkolo na bino, mpe Tokitisaki epai na bino mwinda ya polele (174)فَأَمَّا الَّذِينَ آمَنُوا بِاللَّهِ وَاعْتَصَمُوا بِهِ فَسَيُدْخِلُهُمْ فِي رَحْمَةٍ مِنْهُ وَفَضْلٍ وَيَهْدِيهِمْ إِلَيْهِ صِرَاطًا مُسْتَقِيمًا (175) } Mpo na baye bandimi Nzambe mpe basimbaka Ye makasi, akondima bango na ngolu na ye mpe na boboto, na akokamba bango epai na Ye na nzela ya malamu (175)}[Surat 4: 174-175].

Est ce que Ozali pene ya kozwa ekateli oyo eleki monene na bomoi na yo?

Soki nionso oyo ezali na se pona yo, pe oyebi bosolo na motema na yo, Kasi esengeli osala litambe ya liboso pona kokoma musulman Olingi na sunga yo ozua décision ya malamu ya vie na yo pe ko bongila yo na ndenge nini po akoma musulman?

Kotika te masumu na yo epekisa yo okota na Islam, Nzambe ayebisaki biso na Coran ete alimbisaka masumu nioso ya moto soki akomi na Islam mpe abongoli motema epai ya nzambe mokeli na ye, ezali malamu okosala yango, mpe kosala masumu mosusu te, sima ya kondima, nde akosunga yo otika masumu mosusu , na Oyo andimi Nzambe pe alandi bosolo, Nzambe akokamba ye na bolamu mingi, yango wana kokakatana te kokota na Islam sikoyo.

Elembeteli ya likambo yango ezali liloba ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso:﴿قُل لِّلَّذِینَ كَفَرُوۤا۟ إِن یَنتَهُوا۟ یُغۡفَرۡ لَهُم مَّا قَدۡ سَلَفَ﴾ {"Lobá na baoyo bandimeli Yo te, soki batiki tembe, ba kolombisama na oyo esili koleka }.[Surat 8: 38].

Nasala nini po nazala musulman?

Kokota na Islam ezali likambo ya pete mpe esengaka milulu te, makambo ya officiel, to kozala ya moto moko te, esengeli kaka aloba litatoli mibale, koyeba ndimbola na yango mpe kondima yango, na kolobaka ete: (Nazali kotatola ete ezali na nzambe mususu te kaka Allah, mpe nazali kotatola ete Muhammad azali Ntoma ya Allah), soki ekoki kosalema mpo na yo koloba yango na Arabe, yango ezali malamu, mpe soki ezali mpasi mpo na yo, okoki koloba yango na monoko nayo mpe bongo okozala musulman Na nsima esengeli oyekola lingomba na yo, oyo ekozala liziba ya esengo na yo na mokili oyo mpe lobiko na yo na bomoi nsima ya liwa.

Mpo na koyeba makambo mingi na ntina ya Islam, napesi toli ete okende na site internet:

Esaleli mpo na kobongola ndimbola ya Coran Esantu na monoko.... :

Mpo na koyeba ndenge ya kosalela Islam, tosengi yo okota na site Internet oyo:

Nani akelaka ngai? Na mpo na nini Akelaka ngai?Eloko nyonso ezali kolakisa ete Mozalisi na yango azali

Allah Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso

Lokumu ya Nkolo Mozwi-ya-Nguya-Nyonso

Nkolo oyo basambelaka ye asengeli azala na lokumu ya kokoka

Ezali likoki ete Mozalisi atika biso kozanga emoniseli ?

CORAN ESANTU

Mpo na nini bamemi-nsango baza ebele ?

Moto azali mondimi te kino akondimela bamemi-nsango nyonso

Islam ezali nini?

Ba musulmans ba ndimaka nini pona Jésus, kimia ezala likolo na ye?

Nini ezo senga po nazala musulman?

Islam ezali nzela ya esengo

Nazali kozwa litomba nini soki nakoti na Islam?

Nako bongisa nini soki naboyi Islam?

Kozelisa décision te!

Ezali na ntina moko te ya komilongisa mpo na baoyo basundolaka bosolo mpe balandi batata mpe bankoko

Mutu oyo alingi akota na Islam asala nini mpe azali kobanga kosala bandeko na ye mabe?

Ndeko nanga Motangi ya bolingo

Est ce que Ozali pene ya kozwa ekateli oyo eleki monene na bomoi na yo?

Nasala nini po nazala musulman?