×
Isilamu Lingomba ya mayele, ya makanisi mpe ya esengo

Isilamu

Lingomba ya mayele, ya makanisi mpe ya esengo

Na kombo ya Allah Nzambe, wa boboto atonda ngolu na mawa

Omitunaki yo moko:

Nani akelaka mapata na Mabele? Na bikelamu minene oyo ezali kati na yango? Nani asalaka ko bongisa système oyo ya kitoko ezwami kati na yango?

Ndenge Nini ebongisami mpe ezali ko stabiliser Mokili monene oyo na mibeko na yango oyo etambwisaka yango malamu na bo umeli ya bambula?

Yango moko nde emikelaka boye? To e utaka na eloko te? To ezwami mbala kaka boye?

Nani akelaka yo?

Nani atiaka Mibeko yakolatisayo nzoto na bi kelamu Nyonso oyo ba zwami na bomoi?

Moto moko te akondima koyebisa ye que ndaku oyo eyaki sans que mutu atonga yango! To ayebisaki ye ete eloko moko te nde ekela ndako oyo! Ndenge nini bato mosusu bakoki kondima bato oyo balobaka ete molɔ́ngɔ́ monene wana eutaki kozanga Mozalisi? Ndenge nini moto oyo azali na makanisi malamu akoki kondima ete báyebisa ye ete disipilini wana ya sikisiki ya molongo esalemaki na mbalakaka?

Ya solo ezali na, Nzambe Mozalisi monene azali, Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ oyo mpe biloko nyonso oyo ezali na kati, mpe Ye azali Allah nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.

Mpe Nkolo, Nkembo ezala na Ye, atindelaka biso bamemi-nsango mpe akitisaka epai na bango mikanda ya bonzambe (emoniseli), oyo ya nsuka na yango ezali Coran Esantu, oyo Nzambe amonisaka epai ya Muhammad, azali momemi-nsango ya nsuka ya Nzambe, Na nzela ya mikanda na ye nzambi mpe bamemi-nsango na ye:

Toyebi nzambe ye moko, na bizaleli na ye, mpe lotomo droit na ye likolo na biso, mpe alimbolaka makoki na biso likolo na ye.

Akambaki biso ete Ye azali Nkolo oyo akelaka bozalisi, na azali na bomoi mpe akufaka te, mpe bozalisi ezali na bokangami na Ye mpe na nse ya minyoko na bokonzi na ye.

Ayebisaka biso ete moko ya bizaleli na ye ezali boyebi, lokola azali na boyebi ya makambo nyonso, mpe azali Moyoki nyonso na Momoni nyonso, mpe eloko moko te ebombami epai na ye nakati ya mabele to na likolo.

Nkolo azali na bomoi ya seko, Mosungi, oyo apesaka bomoi ya bikelamu nyonso euti epayi naye, Nkembo na Ye, mpe Ye azali Mosungi Oyo bomoi ya bikelamu nyonso etiamaka na nzela na ye, Nkembo na Ye Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobi:﴿اللَّهُ لا إِلَهَ إِلَّا هُوَ الْحَيُّ الْقَيُّومُ لا تَأْخُذُهُ سِنَةٌ وَلا نَوْمٌ لَهُ مَا فِي السَّمَوَاتِ وَمَا فِي الأَرْضِ مَنْ ذَا الَّذِي يَشْفَعُ عِنْدَهُ إِلَّا بِإِذْنِهِ يَعْلَمُ مَا بَيْنَ أَيْدِيهِمْ وَمَا خَلْفَهُمْ وَلا يُحِيطُونَ بِشَيْءٍ مِنْ عِلْمِهِ إِلَّا بِمَا شَاءَ وَسِعَ كُرْسِيُّهُ السَّمَوَاتِ وَالأَرْضَ وَلا يَئُودُهُ حِفْظُهُمَا وَهُوَ الْعَلِيُّ الْعَظِيمُ﴾ Allah, Nzambe mosusu azali te Kaka Allah, oyo azali na bomoi ya seko, oyo azali ya kotosa ye ntango nyonso, azali nzambi oyo , animbaka te pongi mpe, ezwaka ye te, nyonso oyo Ezwami na mapata na mabeli , azali kotelemela ya ngo, Nani azali mpo na kosembola epai na Ye, kaka na ndingisa na Ye ayebi nini ezali liboso na bango mpe nini ezali nsima na bango. mpe oyo ezali nsima na bango Bazali kozinga ata boyebi na ye te, Kiti na ye ya bokonzi etandami likoló mpe na mabele, na Alembaka te kobatela yango, Mpe Ye azali Likolo na bonene koleka.[Surat Al-Baqarah: 255].

Ayebisaka biso ete Ye azali Nkolo oyo azali na bizaleli ya kokoka, mpe apesaka biso mayele mpe mayoki oyo esosolaka makamwisi ya bozalisi na Ye mpe nguya na Ye, oyo ezali kolakisa epai na biso bonene na Ye, nguya, mpe bokoki ya bizaleli na Ye , akotisaka kati na biso ezaleli ya kobotama oyo ezali kolakisa bokoki na Ye, mpe Ye akoki kozala na ezaleli ya kozanga kokoka te.

Toyebi ete Nkolo azali likolo ya mapata na ye mpe akotaka na mokili te, mpe mokili efandaka kati na ye te.

Ayebisaka biso ete tosengeli komitika epai na Ye, Nkembo ezala na Ye, mpo Ye azali Mozalisi na biso mpe Mozalisi Mokonzi ya molongo mobimba.

Mozalisi azali na bizaleli ya bonene mpe akoki ata moke te kozala na bosenga to bozangi , ye Nkolo abosanaka te, alalaka te, aliaka bilei te, mpe akoki kozala na mwasi to mwana te. Makomi nyonso oyo ezali na eloko nyonso oyo ezali kotelemela bonene ya Mozalisi ezali te, a eteni ya emoniseli ya malamu oyo ememamaka na Ba memi-nsango ya Nzambe, kimia ezala likolo na bango.

Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobaki na kati ya Coran Esantu:﴿قُلۡ هُوَ ٱللَّهُ أَحَدٌ * Loba: Allah azali moko*ٱللَّهُ ٱلصَّمَدُ * Allah azali Seko*لَمۡ یَلِدۡ وَلَمۡ یُولَدۡ * Abotaka te abotamaka Mpe te*وَلَمۡ یَكُن لَّهُۥ كُفُوًا أَحَدُۢ﴾ Mpe ezalaka na moto moko te oyo akokani na ye}[Al-Ikhlas: 1-4].

Soki ondimi Nzambe Mozalisi...osi omituna soki tina ya bokeli na yo ezalaki nini? Nzambe alingi nini epai na biso, mpe ntina ya kozala na biso ezali nini?

Ekoki kozala ete Nzambe akelaka biso mpe na nsima atikaki biso pamba ? Ekoki kozala ete Nzambe akelaka bikelamu nyonso bazala na mokano na destination te?

Solo ezali ete Nkolo, Mozalisi Monene, "Nzambe," ayebisaka biso ntina ya bozalisi na Ye mpo na biso, oyo ezali kosambela Nzambe kaka, mpe oyo alingi epai na biso! Ayebisaka biso ete Ye moko abongi na losambo, mpe alimbolaka biso na nzela ya bamemi-nsango na Ye, kimia ezala likolo na bango, lolenge nini kosambela Ye? Ndenge nini tokoki kopusana penepene na Ye na kolandaka mitindo na Ye mpe kosundolaka bipekiseli na Ye? Ndenge nini tozwaka bosepeli na Ye? Tokeba na etumbu na ye, mpe toyebisa destin na biso sima ya liwa?

Ayebisaka biso ete bomoi oyo ya mokili ezali kaka komekama, na bomoi ya solo mpe ya ko wumela ekozala bomoi nsima ya liwa.

Ayebisaka biso ete moto oyo akosambela Nzambe lokola atindaka ye, mpe atiki oyo apekisi ye. Akozala na bomoi ya malamu na mokili oyo mpe esengo ya seko na mokolo ya nsuka, na oyo akotosa ye te mpe andimili ye te, akozala na mpasi na mokili oyo mpe minyoko ya seko na mokolo ya nsuka.

Pamba te toyebi que tokoki kokende na bomoi oyo te, Sans que mutu Nyonso azua lifuti epayi na Nzambe : oyo azosala ya malamu to ya mabe, Bongo etumbu ekozala te mpo na banyokoli mpe mbano ekozala te mpo na basali ya bolamu?

Nkolo na biso ayebisaka biso ete kozwa ndingisa na Ye mpe kokima etumbu na ya nzambe ekoki kosalema te, kaka na kokota na lingomba ya Islam, oyo ezali kotosa ye mpe kosambela ye moko na molongani te, kotosa ye na botosi, mpe kotosa mibeko na ye, na kondima, na ayebisaka biso ete andimaka epai ya bato lingomba mosusu te Kaka isilamu nzambe Alobi:(وَمَن يَبۡتَغِ غَيۡرَ ٱلۡإِسۡلَٰمِ دِينا فَلَن يُقۡبَلَ مِنۡهُ وَهُوَ فِي ٱلۡأٓخِرَةِ مِنَ ٱلۡخَٰسِرِينَ) (Mpe oyo azali na mposa ya lingomba mosusu etiki Islam, ekondimama epai na ye te, mpe na sima akozala na kati ya baye babungi).[Al-I'mran : 85].

Na moto nyonso atali oyo bato mingi bazo sambela lelo oyo; Akuti moto azali kosambela mutu, mosusu azali kosambela ekeko, mosusu azali kosambela planète, mpe bongo na bongo Moto ya mayele asengeli kosambela te, Kaka kosambela Nkolo ya mokili, Oyo akoki na bizaleli na Ye, bongo ndenge nini akoki kosambela ekelamu lokola ye, to na nse koleka ye! Nzambe akoki kozala mutu te, ekeko te, nzete to nyama te!

Mangomba nyonso oyo bato basambelaka lelo - endimami na Nzambe te Kaka isilamu, lokola ezali mangomba oyo bato babongisaka, to mangomba oyo ezalaki ya bonzambe mpe na nsima ebongwani na maboko ya bato Mpo na oyo etali Islam, ezali lingomba ya Nkolo ya Mokili, ebongwanaka te mpe atiamaka te, mpe buku ya lingomba oyo ezali Coran Mosantu Ebatelami ndenge Nzambe abimisaki yango pe ezali tii lelo na maboko ya ba musulmans tii lelo na monoko oyo ebimisamaki na yango Motindami ya nsuka.

Moko ya miboko ya Islam ezali ete ondimi bamemi-nsango nyonso oyo Nzambe atindaka, mpe bango nyonso bazalaka bato oyo Nzambe asungaka bango na bilembo na bikamwa, mpe atindaka bango babenga mpo na kosambela ye moko, kosangisa ye te.Motindami ya suka ezali Ntoma Muhammad, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia Nzambe atindaka ye na Mibeko ya bonzambe ya suka oyo elongolaka mibeko ya bamemi-nsango oyo bazalaka liboso na ye, mpe asungaka ye na baverse minene, oyo eleki monene ezali Coran esantu, liloba ya Nkolo ya mokili, Buku eyebani na bato, ya likamwisi na makambo na yango, na maloba, na ebongiseli, mpe na bikateli, oyo ezali na litambwisi mpo na bosolo oyo ememaka na esengo na mokili oyo mpe na nsima, mpe emonisami na monoko ya Arabe.

Ezali na ebele ya bilembeteli ya mayele mpe ya siansi oyo ezali kolakisa na ntembe te ete Coran oyo ezali liloba ya Mozalisi, Nkembo ezala na Ye, mpe ekokaki kobima na bato te.

Kati na miboko ya Islam ezali na kondima na ba anzelu mpe kondima na mokolo ya suka, Nzambe akosembola bato na malita na bango na mokolo ya lisekwa mpo na kopesa bango mokumba mpo na misala na bango Bongo oyo azali kosala misala ya malamu ntango azali mondimi akozala libela na esengo ya Paradis, pe oyo akondima te pe asali misala ya mabe akozala na etumbu munene na Lifelo, pe na kati ya miboko ya Islam ezali ete ondima oyo epesameli na Nzambe azali malamu to mabe.

Lingomba ya Islam ezali lolenge ya bomoi mobimba, oyo eyokani na mayele na makanisi, mpe endimami na milimo ya momesano Ezwamaka na mibeko ya nzambe Mozalisi Monene mpo na bokeli na Ye, mpe ezali lingomba ya bolamu na esengo mpo na bato banso na mokili oyo mpe mokolo ya nsuka Ekesenisaka loposo moko na mosusu te, mpe langi moko te likolo ya mosusu, mpe bato oyo bazali na kati na yango bakokani na kati, ya Islam , bokeseni ezali te kaka na misala ya malamu.

Nzambe alobi:(مَنۡ عَمِلَ صَٰلِحا مِّن ذَكَرٍ أَوۡ أُنثَىٰ وَهُوَ مُؤۡمِن فَلَنُحۡيِيَنَّهُۥ حَيَوٰة طَيِّبَة وَلَنَجۡزِيَنَّهُمۡ أَجۡرَهُم بِأَحۡسَنِ مَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ) (Oyo akosala misala ya bosembo, azala mobali to mwasi, mpe azali mondimi - Tokopesa bango bomoi ya malamu mpe tokopesa bango Lifuti oyo eleki malamu ya oyo bazalaki kosala)[An-Nahl:97]

Kati na maye Nzambe andimisi na Coran esantu ezali ete kondima Nzambe lokola Nkolo Nzambe Oyo esingili kosambela, na Islam lokola lingomba, mpe Muhammad lokola Ntoma, na mpo na kokota na Islam ezali likambo ya ntina oyo moto azali na kopona te. Na Mokolo ya Lisekwa ekozala na botangi mpe lifuti. Na oyo azali mondimi ya solo akozala na elonga na esengo monene, mpe oyo azali mondimi te akozala na bobungisi ya polele.

Nzambe alobi:(... وَمَن يُطِعِ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ يُدۡخِلۡهُ جَنَّٰت تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ خَٰلِدِينَ فِيهَاۚ وَذَٰلِكَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡعَظِيمُ، (...Mpe moto nyonso oyo akotosa Nzambe (Allah) mpe Ntoma na Ye, akokotisama na Bilanga oyo na nse na yango ebali ezali koleka. Bakofanda na kati seko, yango nde elonga Monene,وَمَن يَعۡصِ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ وَيَتَعَدَّ حُدُودَهُۥ يُدۡخِلۡهُ نَارًا خَٰلِدا فِيهَا وَلَهُۥ عَذَاب مُّهِين) Mpe oyo azangi botosi ya Nzambe na Ntoma na Ye mpe akobuka ndelo na Ye, akokotisama na Moto mpo na kotikala nseko , mpe mpo na ye ezali etumbu ya nsoni)[An-Nisaa: 13-14].

Na moto oyo alingi kokota na Islam asengeli koloba : (Nazali kotatola ete nzambe mosusu azali te! kaka Nzambe Moko Allah mpe nazali kotatola ete Muhammad azali Ntoma ya Nzambe), koyeba ndimbola na yango na kondima yango, mpe na ndenge wana akomi musulman. Na sima ayekola mibeko oyo etikali ya Islam mokemoke. Mpo na kosala oyo Nzambe apesi ye mitindo.

Isilamu

Lingomba ya mayele, ya makanisi mpe ya esengo

Nani akelaka yo?

Ekoki kozala ete Nzambe akelaka biso mpe na nsima atikaki biso pamba ? Ekoki kozala ete Nzambe akelaka bikelamu nyonso bazala na mokano na destination te?

Pamba te toyebi que tokoki kokende na bomoi oyo te, Sans que mutu Nyonso azua lifuti epayi na Nzambe : oyo azosala ya malamu to ya mabe, Bongo etumbu ekozala te mpo na banyokoli mpe mbano ekozala te mpo na basali ya bolamu?